-
266
pages
-
Lingala
-
Ebooks
-
2025
Description
Sima ya ba mbula ya soni mpe ya rejection mpo na infertilité na ye, Chancelline amoni finalement ndoto na ye ya bomama ekokisama : grâce na intervention providentielle ya Yvonne, jeune infirmière ya motema malamu, akomi mama adoptive ya petite Chancelle. Lokola azali na lisungi ya bizaleli malamu mpe ya mbongo, Chancelline abundi mpo na kopesa mwana na ye ya mwasi bomoi ya lokumu. Akutani na bobola, kotyola, zuwa, mpe ata liwa ya mawa ya moninga na ye se moko, Yvonne, kasi azali koyika mpiko. Bambula eleki, mpe bambeka na ye ebotaka mbuma: Chancelle akoli, azali kongɛnga mpe azali kokokisama. Kasi destin emonisami lisusu motema mabe : lokola mokóló, Chancelle aboyi mwasi oyo abokolaki ye, aboyi kutu kobenga ye « Mama ». Mpo na Chancelline, ezali mbeli na motema : sima ya kopesa nionso, amimoni aboyami na mwana oyo abikisaki na orphelinat mpe mpo na ye apesaki bomoi na ye mbeka. "Yo te, Mama na ngai" ezali buku ya motema pasi oyo elobeli bolingo ya mama, kondima oyo etɛngamá te, mpe mpasi ya komona bambeka minene ya moto elongolami na kozanga botondi. Lisolo oyo ezali kotuna: kozala mama elingi koloba nini? Oyo apesaka bomoyi... to oyo amipesaka na kobokola?
-
Écrit par
-
Date de parution
01 septembre 2025
-
Langue
Lingala
-
Poids de l'ouvrage
1 Mo